03/10/2022
LOBI EKO LEKA LELO
---------------------
EPISODE : 01
KONGO CENTRAL
Ma Raissa abota Bana mibale ya mibale, Chadrack et Rabby
UN JOUR
Chadrack : maman nga naza n'a posa oteka lopango oyo papa atikela bino n'a s**a ya mboka kuna mpo opesa nga mbongo wana nakende koluka vie n'a Kinshasa, Ma Raissa : te muana nanga kk lopango moko oyo papa na bino Atika yango wana n'a teka yango lisusu te ekosimba te, Chadrack : maman vie oyo tozo vivre eza bien te naza n'a posa to change vie pardon maman, Ma raison : okay malamu mais il faut Leki nayo azala mpo lopango wana eza ya biso nioso
-----------------------
Chadrack ake koluka Leki naye rabby, Chadrack : Leki nanga omoni vie oyo tozo lekisa Awa eza pasi nga nazo linga nakende koluka n'a Kinshasa, Rabby : Oh eza penza idée ya bien yy bonne chance, Chadrack : mais Naza n'a mbongo te nayebisi maman toteka lopango oyo papa atikela biso po nga nazua mbongo wana nakende koluka, Rabby : hum Yaya lopango ah wana te, Chadrack : Leki nanga Soki nzambe asungi nako zongisa mapangu ata 5, Rabby : okay malamu, Chadrack : mais il faut ondima n'a misu ya maman mpo maman azo zela kk yo
-------------------------
Ma Raissa : rabby nabengisi yo Awa mpo Yaya nayo aza n'a posa toteka lopango topesa ye mbongo akende koluka vie n'a Kinshasa, Rabby : maman pona nga azui idée ya bien
Ma Raissa n'a rabby bandimi koteka lopango mpo Chadrack akende Kinshasa
Bateki Lopango Yango bazui mbongo nioso bapesi Chadrack, Ma Raissa : Muana nanga papa n'a bino akufi atiki yo n'a age ya 9 ans Leki nayo n'a age ya 5 ans n'a niokami n'a bino ba camarades misusu baloba nasimba kisi mpona kokolisa bino mais nazalaki n'a confiance epa nzambe bino Lelo bokoli Bana nanga Bozui ya kisi ezalaka n'a duré mulayi te Mbongo ya kisi eza n'a Tina te ndenge ozo kende Kinshasa bapesi yo likasu te ni bokoko mais n'a pesi yo kombo ya Yesu muana nanga eya n'a Butu eya n'a moyi kota n'a ndaku fukama Belela kombo ya Yesu yango nde makasi n'a biso eza n'a kombo moko te oyo elendaka liboso ya kombo wana, Chadrack : merci maman, Ma Raissa : Soki oyoki ba boti lobi okotia Maboko n'a mutu te, Chadrack : Merci maman
------------------
Rabby ake kotika Chadrack n'a nzela, Rabby : Yaya naza n'a kondima nzambe akosunga okozua, Chadrack : amen Leki nanga nako bosana bino te n'a promettre yo boko banda koyoka nga chaque jour n'a appel, rabby : merci Yaya
----------------------
KINSHASA
Chadrack akomi n'a Kinshasa azui mbongo ndambu oyo atikalaki nango abandi koteka ba bombom naba biscuits
-----------------
Un jour Chadrack akutani n'a fille moko n'a kombo ya Déborah, Chadrack : ah fille oyo asepelisi motema nanga nakoki pe komeka ye
Chadrack : vrai chérie excuse une minute, Déborah pe aye
Chadrack : Maman mingi ya koloba eza te nasepeli n'a yo naza n'a posa okoma muasi nanga, Déborah : Mdr eh mibali ya mboka oyo babangaka te nga muasi kitoko boye nalinga moteka ba biscuits ndeti yo eh
Chadrack Maloba wana Esui ye, Chadrack azo komi Loba ah nga il faut n'a bonga kk muana oyo nga nakozua ye Kaka
----------------------
Chadrack azui ba camarades mibale bango nioso bazo sala kk coop moko ya koteka ba biscuits naba bombom
Djino : Masta nga un jour il faut natika vie oyo ya koteka ba biscuits boye nga naza n'a posa nasomba mapangu, Rais : nga pe un jour il faut n'a bonga, Chadrack : nga kutu natika libota n'a mboka Naya Awa koluka mais nako zonga boye te il faut maman nanga nasombela ye lopango 5 nde kk n'a prometaki ye, Djino : oui eza penza bongo il faut tobonga
-------------------
UN JOUR
Djino, Rais et Chadrack bazo tambusa ba biscuits n'a bango bamoni Jeune moko azo kita n'a Voiture Ya Malonga, Djino : hum imagine nga Mutu nazo kita n'a voiture wana n'a muasi nanga mupanzi, Chadrack : hum okosi nga nde nazo kita n'a Déborah mupanzi, Rais : nga nazo kende kotuna ye secret naye eza Nini, Djino : oui ozui idée ya bien, Chadrack : masta kende penza
Rais : Ndeko bolimbisi nga kombo nanga Rais naza kk n'a posa nayeba osala Nini po okoma n'a vie oyo, Jeune : oh k*k question nayo esekisi nga oza n'a posa okoma lokola nga, Rais : Oui nga naba ninga nanga, Jeune : Okay bozua carte de visite nanga lobi boya n'a ndaku nanga, Rais : Okay
----------------
KONGO CENTRALE
1h45 Ma Raissa akoti n'a chambre ya rabby, Ma Raissa : Rabby lamuka nanu, Rabby : oh maman n'a heure oyo nini kk, Ma Raissa : Naloti Ndoto ya mabe makasi pona Yaya nayo, Rabby : ah maman eza nango kk Ndoto oloti Nini kasi, Ma Raissa : Naloti Yaya nayo azo kota esika moko mais esika yango sispe sala nga aide bengela nga ye Kaka sikoyo, Rabby : azui téléphone abengi Chadrack
Chadrack : Allô, Rabby : Maman mutu aza n'a posa kosolola nayo, Chadrack : Okay pesa ye, Ma Raissa : Muana naloteli yo Ndoto ya mabe soki oza n'a visite moko lobi il faut o visité ye pardon kokende te namona mabe kuna, Chadrack : okay maman nayoki malgré eza te lobi kk nako benga yo naza n'a pongi makasi, ma Raissa : okay lala bien
Rabby : omoni nalobaki eza kk Ndoto Yaya aza naye bien lokola nde ko raisonne ye mingi, ma Raissa : Okay
----------------
NA TONGO
Djino n'a Rais baye kozua Chadrack mpo bakende Esika ya Jeune wana
Chadrack pe déjà azalaki prêt bake mbala moko
---------------
Bakomi kuna jeune wana atuni bango esque boza prêt bokoma lokola nga, Bandimi bango nioso, Jeune wana atindi bango bakende kosokola bilongi n'a nzungu moko ezalaki wana, bake pe basokoli
Jeune : Okay n'a minute oyo bokomi déjà ndeti nga mais mbongo n'a bino boko banda kolia yango naba famille n'a bino te, Chadrack : ah nga nayaki Awa pona libota nanga, Jeune : nga déjà nalobi, Chadrack : seke nakende nanga, Jeune : ekosimba te déjà okoti
Jeune : Bokoma ba kombo ya ba maman n'a bino esika wana, bango nioso bakomi ba kombo yaba maman n'a bango
------------------
KONGO CENTRALE
Ma Raissa : muana nanga lobi ta mususu nakoki kokufa mais ata ndenge Nini kobosana kombo ya Yesu te kombo wana nde ekosala yo obonga nde ekosala yo ozua nioso oza nango posa, Rabby : merci maman
Tango kk ma Raissa asilisi koloba bongo mbala moko makila ekomi kobima ye n'a munoko n'a zolo ma Raissa akueyi akufi, Rabby azo comprendre te abandi kolela batu ya mboka baye batali maman balobi akufi
Rabby : Azo benga numéro ya Chadrack mais ezo leka te
----------------------
2 JOURS APRES, Rais, Djino et Chadrack babongi bakomi n'a mapangu ya minene n'a mituka
Chadrack : ah libota nanga eza n'a pasi mais moyen kosunga bango eza te, Djino : même yanga pe mais bien eza ke déjà tobongi, Rais : vraiment
---------------------
Chadrack azo kende n'a mutuka naye akutani n'a Déborah, Chadrack alobi kutu eloko te mais Déborah ye moko apesi position, Chadrack : okay dans 2 jours nazoya kobala yo
------------------
MARIAGE
Chadrack abali Déborah, afuti mbongo ya facture X5, Chadrack n'a Déborah bakomi ndaku moko
----------------------
KONGO CENTRALE
Mutu moko awuti Kinshasa amonaki Chadrack aye koyebisa Rabby ke yaya abonga mutu yango apesi Rabby n'a adresse ya Chadrack n'a Kinshasa
Rabby azo Luka mbongo mpo akende Kinshasa
---------------------
Déborah : bébé mais nga depuis tolingana nanu namona famille nayo tein, Chadrack : ah nalingaka question oyo te esalaka nga pasi, Déborah : ah n'a Nini bb, Chadrack : papa n'a bino akufaka déjà avant totikalaka kk nga n'a maman nanga n'a Leki mais tosalaki voyage moko masuwa ebalukaki biso nioso todindaki n'a mayi nga lokola nayebaki nagé nabikaki mais bango bakufa nde naza boye natikala kk nga moko, Déborah : ah histoire yango esali nga pasi bb eza le passe nzambe ye moko ayebi pourquoi asalaki bongo esali nga penza pasi, Chadrack abandi kolela, Déborah aye akomi kobondela ye
---------------
Rabby Azui déjà Mutuka azoya Kinshasa
Asuivre....
Histoire ekomami epa président Bisonabisobnbtv
Eza Idée ya abonné moko mais président mutu a développé yango
Histoire eza naba conseil ebele bolanda penza nabo kebi
Bobosana ko partagés te, ko partagés n'a bino nde force n'a biso
Soki oza n'a idée ou histoire oza n'a posa olekisa yango n'a page biso n'a biso bnbtv oza nayo libre landa biso n'a WhatsApp +244946216366
Soki oza n'a posa kosomba histoire ou oza n'a posa bakomela yo histoire komela nga n'a privé ou WhatsApp
Épisode 02 Ezoya Eza déjà n'a zela, Nabandeli Lisusu Kobosana ko partagés te yango nde force n'a biso
Abonné moko a promette nga iPhone 11 pro 😳
Nazoya n'a Épisode 02